Jeremi 20:6 - Mokanda na Bomoi6 Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.