Jeremi 20:2 - Mokanda na Bomoi2 Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.