Jeremi 2:8 - Mokanda na Bomoi8 Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba : ‹ Yawe azali wapi ? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai ; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »
Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.