Jeremi 2:6 - Mokanda na Bomoi6 Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Jedeon azongisaki : — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso ? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito ? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani.