Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te ; boye, bayokisama soni.
Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.
Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele ? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te ? ›
Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika : « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »
« Mwana na moto, ezali epai ya bato na yo, bandeko na yo ya makila mpe ndako mobimba ya Isalaele nde bato ya Yelusalemi balobaki : ‹ Bozala mosika na Yawe ; mokili oyo epesamelaki biso lokola libula na biso. ›
Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.
Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina.