Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.
Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi ; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. »
Eloko kaka bokotikala na yango : kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te ; tango likama ya makasi ekokomela bino, ekobebisa bino penza nye.
Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi ; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.
« Mata na Libani mpe ganga makasi ! Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani ! Ganga wuta na Abarimi, pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa !
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »
Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.