Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 2:36 - Mokanda na Bomoi

36 Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso ? Okosambwa mpo na Ejipito ndenge osambwaki mpo na Asiri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 2:36
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango yango, mokonzi Akazi atindaki bato epai ya bakonzi ya Asiri mpo na kosenga lisungi.


Bato nyonso oyo batiaki elikya na bango na Kushi mpe bakomaki lofundu mpo na Ejipito bakokweya mpe bakotonda na soni.


Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Nili kati na Ejipito ? Mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Efrate kati na Asiri ?


« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo ! Na etamboli na yo, okoki ata kopesa mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe !


« Mata na Libani mpe ganga makasi ! Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani ! Ganga wuta na Abarimi, pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa !


Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. Okoyoka soni mpe okosambwa likolo ya mabe na yo nyonso.


Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola ? Yawe akosala likambo ya sika na mabele : mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ;


Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo, makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele. Soda moko akotutana na soda mosusu, mpe bango mibale bakokweya nzela moko. »


Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.


Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei.


Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri ; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te.


Tango maboko na bango esimbaki yo, obukanaki mpe ozokisaki mapeka na bango ; tango balalelaki yo, obukanaki mpe olembisaki mikongo na bango.


Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri lokola likabo mpo na mokonzi monene. Efrayimi akoyoka soni, mpe Isalaele akosambwa mpo na mabongisi oyo basalaki.


Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa ; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.


Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.


Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ