Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 2:34 - Mokanda na Bomoi

34 Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 2:34
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.


bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.


Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.


Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.


Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu ; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.


Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.


Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.


Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,


Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo ! Na etamboli na yo, okoki ata kopesa mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe !


Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te ? Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.


Batongi bisambelo ya likolo ya bangomba, ya Tofeti, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo ete batumba bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na kobonza bango lokola mbeka : nzokande wana ezali likambo oyo Ngai natindaki bango te mpe natikalaki ata kokanisa yango te.


soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,


Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


Bakomaki sik’oyo koyengayenga na babalabala lokola bakufi miso, bakomaki mbindo na makila mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.


Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele ; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai.


Basakoli na yo bazali kosala likita ; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali.


Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila.


Pamba te makila oyo esopaki ezali kati na yango ; esopaki yango na likolo ya libanga, esopaki yango na mabele te epai wapi putulu ekokaki kozipa yango.


Azongiselaki ngai : — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo ; pamba te bazali koloba : « Yawe asundoli mokili ; Yawe azali komona eloko moko te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ