Jeremi 2:31 - Mokanda na Bomoi31 Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele ? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te ? › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.