Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 2:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mpo na nini bozali kosambisa Ngai ? Nzokande, ezali bino nyonso nde botombokelaki Ngai, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 2:29
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›


« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


« Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : bango nyonso bazali kotambola na lokuta.


Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ