Jeremi 2:27 - Mokanda na Bomoi27 Balobaka na nzete : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na libanga : ‹ Yo nde obotaki ngai. › Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka : ‹ Yaka kobikisa biso ! › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe, oyo ebendaka mopepe na zolo soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto. Bongo, nani akoki kokanga posa na yango ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali ? Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango ekomona pasi te, pamba te ekozwa yango na tango ya posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali.
Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.