18 Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Nili kati na Ejipito ? Mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Efrate kati na Asiri ?
Lifuti na ye ezalaki : ble ya Shiyori, oyo ezalaki koya na nzela ya ebale monene mpe milona oyo ezalaki kowuta pembeni ya Nili. Engumba ya Tiri ekomaki nde zando ya bikolo.
Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !
Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo.
Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.
Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo ? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo ? Boni, abuka solo boyokani mpe abika ?
nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko.
Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.
etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana ; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia : mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni ; etuka ya bato ya Avi ;