Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema ! ’
Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo.
Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›
« Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.
Nakotia moto kati na Ejipito ; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango.
Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
Mpo na Gadi, alobaki : « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene ! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.