Jeremi 2:15 - Mokanda na Bomoi15 Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye, ekomisaki mokili na ye lokola esobe ; batumbaki bingumba na ye mpe etikalaki lisusu na bato te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye ! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.