Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Boni, Isalaele azali solo mowumbu to abotama kati na ndako ya bowumbu ? Mpo na nini akomi lokola eloko pamba na miso ya bikolo mosusu ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 2:14
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alobaki lisusu : — Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai !


Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino. › »


Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali.


Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi ; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »


Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ