Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Oh likolo, tika ete likambo oyo ekamwisa yo mpe epesa yo somo makasi, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 2:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.


Bozanga maloba mpe bokamwa ! Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso ! Bolangwa masanga, kasi na vino te ! Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te !


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye ! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza !


Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai ! Yoka Liloba na Yawe !


Tango natalaki mabele, namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo mpe ezalaki ata na eloko moko te ; tango natalaki likolo, namonaki ete pole ezalaki lisusu te.


Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.


Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ