Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.
Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema mpe bobundisa Kedari, bobebisa bato ya este.
Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te !
Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani ; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola botambolaki na botomboki koleka bikolo oyo ezali zingazinga na bino, bolandaki mibeko mpe bikateli na Ngai te mpe bolandaki ata kutu bosembo ya bamboka oyo ezingelaki bino te ;
Akokitela bisanga mpe akobotola ebele kati na yango. Kasi atako bongo, mokonzi ya mampinga moko ya basoda akosukisa lolendo na ye mpe akozongisela ye mabe mpo na lolendo na ye. Mokonzi ya nor akokoka lisusu kosala eloko moko te.
Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.