Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.
« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.