Jeremi 19:13 - Mokanda na Bomoi13 Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.