Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 19:11 - Mokanda na Bomoi

11 mpe loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 19:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.


Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki, ekopanzana penza nye na mawa te ; bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango mpo na kozwela likala ya moto na mbabola to mpo na kotokela mayi na libulu. »


Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »


Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti.


yango wana, na mikolo ekoya, elobi Yawe, bakobenga lisusu te esika oyo : ‹ Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, › kasi bakokoma kobenga yango : ‹ Lubwaku oyo babomelaka bato. ›


Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga ! Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu ! Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki ! Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.


Na likolo ya bandako nyonso ya Moabi mpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka, ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe ; pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, » elobi Yawe.


Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba :


Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona, oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto, kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele, oyo mosali mbeki basili kosala !


mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki : — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »


akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ