Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
Tango mosusu bakoyoka, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; bongo Ngai nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kotindela bango pasi likolo ya misala na bango ya mabe.
« Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema.
Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.
Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.
Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola : — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye !