5 Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai :
Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye.
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?