kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.
Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe !
Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.