Jeremi 18:18 - Mokanda na Bomoi18 Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›
Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.