Jeremi 18:16 - Mokanda na Bomoi16 Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›
Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.
mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.