14 Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani kosila na bangomba na yango ? Bosila komona mayi ya malili oyo ekitaka na bangomba na yango kokawuka ?
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye ! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza !
Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, bazali kotumba malasi ya ansa mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, oyo ebetisaka bango mabaku na nzela mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, bongo ememaka bango na banzela mosusu oyo bafungola nanu te.
Simona Petelo azongisaki : — Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.