Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 18:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye ! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 18:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.


Nani ayoka likambo ya boye ? Nani amona makambo ya boye ? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.


Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.


Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani kosila na bangomba na yango ? Bosila komona mayi ya malili oyo ekitaka na bangomba na yango kokawuka ?


Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


Makambo ya kokamwa mpe ya somo esalemi na mboka :


Yawe asundoli bilombe nyonso ya bitumba oyo bazalaki na milongo na ngai ; abengi mampinga ya bapaya mpo ete baya koboma bilenge mibali na ngai. Nkolo akamoli Yuda, mboka kitoko, na ekamolelo na Ye ya vino.


Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi : Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.


Oh libota ya Isalaele, boyoka maloba oyo, eleli oyo nazali koloba na tina na bino :


« Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te ! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »


Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.


bato ya Filisitia babangaki mpe balobaki : — Eh, tobebi na biso ! Nzambe akoti na molako ! Likambo ya boye nanu esalema te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ