Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 18:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi bakozongisa : ‹ Ezali na tina te ! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 18:12
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »


Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, kasi omilobelaki te : ‹ Ezali na tina te ! › Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, yango wana olembaki te.


Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngai epai ya bato ya mito makasi, oyo balandaka nzela ya mabe, oyo batambolaka kolanda makanisi na bango ;


Kasi batiaki matoyi mangongi mpe bayokelaki Ngai te. Balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Yango wana, natindelaki bango bilakeli mabe nyonso oyo ezali kati na boyokani oyo natindaki bango ete batosa, kasi bango basalelaki yango te. »


Bongo bino, bozali mpe kotambola na ezaleli mabe koleka ata ezaleli mabe ya batata na bino. Botala ndenge nini moko na moko kati na bino azali kolanda makanisi mabe ya motema na ye, na esika ya kotosa Ngai.


Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›


Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai : ‹ Yawe alobi : Bokozala malamu ! › Mpe na bato oyo balandaka makanisi mabe ya mitema na bango : ‹ Mabe moko te ekokomela bino ! ›


Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango.


Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.


Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino : ‹ Boyoka mongongo ya kelelo ! › Kasi bozongisaki : ‹ Te ! Tokoyoka te. ›


Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai ; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka.


Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »


Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ?


Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, apanzi bato oyo batonda na lolendo,


Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ