Jeremi 18:10 - Mokanda na Bomoi10 bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.
Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.