Jeremi 17:8 - Mokanda na Bomoi8 Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi : ezalaka na somo ya moyi makasi te ; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika ; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. »