Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 17:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 17:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.


Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.


Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango.


Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai, nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso. Bato ebele bakomona, bakobanga mpe bakotiela Yawe motema.


Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ; wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.


Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.


Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.


Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !


komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.


Solo, nakobikisa yo, mpe okokufa na mopanga te ; kasi bomoi na yo ekozala bomengo na yo ya bitumba, pamba te otielaka Ngai elikya, elobi Yawe. › »


Nabukodonozori alobaki : — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama ; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema ! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.


Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.


mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ