Jeremi 17:6 - Mokanda na Bomoi6 Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »