Jeremi 17:5 - Mokanda na Bomoi5 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.