Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 17:22 - Mokanda na Bomoi

22 moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 17:22
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.


Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.


Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,


Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,


Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.


Otiolaka biloko na Ngai ya bule mpe obebisaka bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.


Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe.


Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.


Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ