Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 17:20 - Mokanda na Bomoi

20 Loba na bango : ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 17:20
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »


Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.


Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.


Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,


Loba na libota ya mokonzi ya Yuda : ‹ Boyoka Liloba na Yawe !


‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,


Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki.


« Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele ; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai.


Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


Boye, nalobaki : « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele ! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko ?


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ