Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 17:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 17:19
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ?


Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba :


Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.


Loba na bango : ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe !


bimela na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, na liboso ya ekuke ya ndako epai wapi basalaka mbeki ; mpe kuna, okosakola maloba oyo nakoyebisa yo.


« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.


Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.


Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.


« Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.


— Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ