16 Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !
Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai ! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.
Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.