Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 16:20 - Mokanda na Bomoi

20 Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe, tango bango moko bazali banzambe te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 16:20
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te kasi banzete to mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.


Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ?


Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.


Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu ? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.


Mokonzi Nabukodonozori asalisaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene misato na mokuse. Atelemisaki yango kati na etando ya Dura, na etuka ya Babiloni.


Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.


Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe !


Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ