Jeremi 16:19 - Mokanda na Bomoi19 Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo : ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te ! › »
Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›