17 Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso ; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai.
Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.
« Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.
Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.
mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.
Molimo alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko ? Bazali koloba : ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili ! › »
Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›
Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.