Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 16:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 16:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa.


Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.


« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›


likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.


Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›


Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »


Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ