Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 15:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela : akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 15:9
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makambo mibale oyo ekokomela yo mbala moko mpe kaka na mokolo moko : kozanga bana mpe kokufisa mobali. Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, ata kindoki na yo ezali makasi mpe bakisi na yo ezali na nguya.


Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.


mama na bino akoyoka soni makasi ; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.


Bomibongisa mpo na kobundisa yango ! Botelema, tika ete tobundisa yango na midi ! Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili mpe molili ya pokwa ezali koya.


Boni, bakanisi ete bazali kosala Ngai mabe, etuni Yawe ? Te ! Bazali nde komisala bango moko mabe, mpo na soni na bango moko.


Tala ndenge nini engumba oyo, na kala, ezalaki na bato ebele penza, etikali lisusu na bato te ! Tala ndenge nini engumba oyo ezalaki na lokumu kati na bikolo ekomi lelo lokola mwasi akufisa mobali ; oyo ezalaki engumba mokonzi ekomi lelo na bowumbu !


Basi ya mitema malamu balambi, na maboko na bango, bana na bango moko ; bana na bango bakomi bilei na bango kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango ; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai.


Bato oyo bazalaki na bozwi ebele bakomi koluka mosala mpo na bilei, kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala. Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo, kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ