Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 15:3 - Mokanda na Bomoi

3 Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe : « mopanga, mpo na koboma bango ; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango ; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 15:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo alobi : « Wuta na Bashani, nakomema bango ; wuta na mozindo ya ebale monene, nakomema bango,


Bakosundola yango epai ya bandeke oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba mpe epai ya banyama ya zamba. Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.


Boni, libula na ngai ekomi na miso na ngai lokola ndeke oyo eliaka misuni, bongo ebebi na makila, mpo ete bandeke mosusu oyo eliaka misuni eya kozingela mpe kobundisa yango ? Bokende kosangisa banyama nyonso ya zamba mpe bobengisa yango mpo ete eya kolia nyama !


Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.


Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.


« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »


Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba ; mpe moto moko te akobengana yango.


apengwisaki ngai nzela, apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba.


Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga ! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango ! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka ;


tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.


Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.


Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.


Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.


Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango.


Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.


Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ