Jeremi 15:19 - Mokanda na Bomoi19 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo ; kasi yo, kolanda bango te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.