Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 15:15 - Mokanda na Bomoi

15 Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 15:15
42 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo !


Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo !


Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo mpo na nyonso oyo nasili kosala mpo na bato oyo !


Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango ! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai !


atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?


Na bomoi na ngai, abukaki lolendo ya makasi na ngai, mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.


Yawe, kanisa ngai tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo ! Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,


Mikolo ya bomoi ya mosali na Yo ezali motango boni ? Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu ?


Soki otali malamu motema na ngai, soki olandeli ngai ata na butu mpe omeki ngai, okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te, monoko na ngai ebukaki mobeko te.


Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.


boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te, lokola asosolaka mozindo ya mitema ?


« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


Nzokande, oh Yawe, oyebi ngai, omonaka ngai mpe oyebi makanisi ya motema na ngai mpo na Yo. Tindika bango lokola bameme oyo babongisi mpo na koboma ! Bongisa bango mpo na mokolo ya kufa.


Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.


Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.


Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.


Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai ; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! Tika ete balenga liboso na Yo ! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.


Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.


Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo !


Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.


Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango ;


nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe !


Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.


Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.


Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai,


Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.


Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ?


Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.


Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


Samison abondelaki Yawe : « Nkolo Yawe, Yo oyo osalaka nyonso oyo olingi, kanisa ngai ! Nabondeli Yo, Nzambe : Pesa ngai makasi mbala oyo lisusu, mpe pesa ngai nzela ete, na mbala moko, nazongisa mabe na mabe epai ya bato oyo ya Filisitia mpo na miso na ngai mibale. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ