Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 15:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto oyo ekotumba bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 15:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.


Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi ; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te ; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.


Soki nakeyi na zamba, nazali komona bibembe ya bato oyo babomi na mopanga ; soki nakoti kati na engumba, nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala. Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososola likambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › »


Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.


Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›


Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »


Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.


Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.


Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.


Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.


Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.


Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? ›


Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.


Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ