Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 15:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino ; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 15:13
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Osundoli biso na maboko na bango lokola bameme ya koboma mpe opanzi biso kati na bikolo.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »


Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.


Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango ; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.


Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba : biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.


Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.


Bato ya Seba, ya Dedani, bato ya mombongo ya Tarsisi, elongo na bamboka na yango nyonso ya mike bakoloba na yo : ‘ Boni, oyei solo mpo na kozwa na makasi bomengo ya bitumba ? Boni, osangisi mampinga na yo mpo na kobotola palata mpe komema wolo, mpo na kozwa bibwele mpe kobotola biloko to mpo na kozwa biloko ebele ? ’ ›


Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango ; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ