8 Oh Elikya ya Isalaele, Mobikisi na ye na tango ya pasi, mpo na nini ozali kosala makambo lokola mopaya kati na mboka oyo to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka mpo na kolekisa butu ?
Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.
pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.
Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi, bino bakangami oyo botondi na elikya, pamba te nazali koloba na bino sik’oyo : « Nakozongisela bino mbala mibale biloko oyo bobungisaki. »