4 Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.
Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema ; mpe bango bakosunga yo te. »
Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.
Bino basali bilanga, bozala na soni ; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.
Bankona ekawuki na se ya mabele, bibombelo etikali lisusu na eloko te, bibombelo ya bambuma ebukani mpo ete ble ezali lisusu te.
Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
Bato bazalaki kotambola-tambola longwa na engumba moko kino na engumba mosusu mpo na koluka mayi, kasi bazwaki mayi oyo ekokelaki baposa na bango te ; atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? ›