Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 14:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi ; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 14:3
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.


Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba.


Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili.


Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye


Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi ; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.


Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.


Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.


Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ; Yawe, yaka noki kosunga ngai.


Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.


Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te ? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.


« Bato na Ngai basali masumu mibale : Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.


Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema ; mpe bango bakosunga yo te. »


Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye ; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.


— Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »


Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo, pamba te miluka ekawuki mpe moto ezikisi bilanga.


« Napimelaki bino lisusu mvula, basanza misato mobimba liboso ete tango oyo babukaka bambuma ekoma. Natindaki mvula na engumba moko mpe nakangaki yango na engumba mosusu. Elanga moko enokelaki mvula, kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.


Bato bazalaki kotambola-tambola longwa na engumba moko kino na engumba mosusu mpo na koluka mayi, kasi bazwaki mayi oyo ekokelaki baposa na bango te ; atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ